Komilakisa

Centre Interconfessionnel ya Bobongoli Bibilia na bakota ezali lisanga ya koluka mosolo te kasi lisanga ya baKristu mpo na kosunga mangomba oyo bakelaki yango. Ezali mangomba maye: O ngambo ya Catholique: Diocèse ya Isiro-Niangara, Dungu-Doruma mpe Wamba, na ngambo ya baprotestants ezali: ECC/ 16e CECCA, 12e AOG mpe 20e CECA. CITBA ezali na boyokoani kati na mosala na SIL-ECG mpe SEED COMPANY, ezali mpe lisanga oyo endimami na mibeko ya mboka ezali na mikanda ya kotabolisa lisanga uto mwa le 16 avril 2010.

CITBA ezuami na Isiro o mboka mokonzi ya etuka ya Uele ya likolo na Nord-Est ya RDC. CITBA ezali kosala na ndako ya mosala mibale: Bureau ya Administration ezali kosala na centre ville batiment ya ECC/12e AOG pembeni na Universite de l'Uele; na Cellule ya Bobongoli Bibilia to Traduction ezali kosala na Av AGBIANO No 13 batiment ya Diocèse ya Isiro-Niangara.


Share

Your encouragement is valuable to us

Your stories help make websites like this possible.