Kobongola Makomi Masatu

Kobongola Makomi Masatu ezali motema kati na mosala na CITBA. Na boyokani ya mangomba mpe bapaya oyo basungaka mosala neti SIL-ECG, CITBA azali kolengela makanisi ya kobongola bakota oyo ezali kosololama na etuka na biso; lelo CITBA azali na bakota oyo Budu, Lika, Komo, Mangbetu, Mayogo et Logo. Kota mususu ebimisi buku kasi basusu bazali na ndambo ya makomi oyo ebimi.

Kati na CITBA lokola lisanga ya mangomba katoliki na protestant, bayangeli mangomba nde bazali kopona basali oyo bakokani kati na mangomba, mpe sima na koponama bazali koyekolisama mpo basala mosala malamu oyo endimami na bakolo lokota (traduction exacte, claire, naturelle, et adaptée). Kati bilili elandi bokomona lisanga ya basali ya mosala ya kobongola Bibilia na kota elongo na Mokambi mosala ya bobongoli Bibilia na kota Anzalekyeho Abati François mpe baye balengelami kozala bayangeli ya mosala oyo bazali koyekolisama.

Kati na bakota motoba tozali na yango, mibale basili kosala fête ya dedicace na sanza na misato na2016: ezali Mayogo mpe Logoti. Lokota mosusu nyonso ezali kokoba na misala ya kobongola Biblia. CITBA ezali kotalisa posa kati na biso baso awa na mboka na RDCongo mpe epai na bapaya oyo basungaka biso na tina na kabila oyo babandi naino mosala na kobongola Biblia te. Tokozala na esengo monene tango lokota nyoso ya etuka na biso ekozala na maloba na Nzambe na kota na bango.

translators.jpg
Share

Your encouragement is valuable to us

Your stories help make websites like this possible.