Lolenge mosala etambwisamaka

Lisanga ya CITBA ezali kotambolisama na lolenge oyo:

  1. L’Assemblée Générale Interconfessionnelle : Ezali na mosala ya koyekola politique ya misala mpe kozua mikano mpo na yango. Esanganaka mbala misato na mbula to soki bosenga ezali bakoki kobenga likita ya mbalakaka na ndingisa ya mokambi ya Conseil d'Administration.

 

  1. Le Conseil d’Administration: Ezali na mosala ya kolandela na bosikisiki mikano mizuamaki tango ya Assemblée Générale Interconfessionnelle.

 

  1. Le Secrétariat Exécutif Permanent : Ezali mpo kokokisa misala ya tango nyoso, kotosa mikano mizazuami na Conseil d’Administration mpe kotia boyokani kati na lisanga ya mangomba na bapaya baye basungaka mosala, kotala mambi ma bato mpe koluka misolo mpo na mosala.

 

  1. Le Comité de Gestion des langues :  Ezali mpo na yebisa bato ya kota ba sango lolenge mosala ezali katambola mpe lolenge nini bakoki kosunga mosala ya bobongoli Bibilia na kota na bango.

 

  1. Bureaux des Projets : Ezali mpo na kotandisa misala godigodi kati na projet ya kobongola mpe kotangisa bibilia na kota, lisusu kobimisa ba buku muke muke mpo na  bato ya lokota.
Share

Your encouragement is valuable to us

Your stories help make websites like this possible.